Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO YA MINEI

Lolenge nini okoki kotambwisa bato ya ndako na yo?

Lolenge nini okoki kotambwisa bato ya ndako na yo?

1. Mpo na nini kotambwisa ndako malamu ekoki kozala mpenza mpasi lelo oyo?

 “MAKAMBO na mokili oyo mazali kobongwana.” (1 Bakolinti 7:31, NW) Maloba oyo makomamaki esili koleka mibu 1 900, yango ezali mpenza solo lelo oyo! Makambo mazali kobongwana, mingimingi na kotalela bomoi ya libota. Makambo oyo matalelamaki lokola malamu to oyo bato bamesanaki na yango esili koleka mibu 40 to 50 mbala mingi ezali kondimama te lelo oyo. Na ntina yango, kotambwisa ndako malamu ekoki kozala ntembe monene. Atako bongo, soki olandi batoli ya Makomami, okoki kolónga ntembe wana.

SEPELÁ NA BOMOI NA BILOKO OYO OZALI NA YANGO

2. Makambo nini ya nkita mayeisaka mikakatano kati na libota?

2 Lelo oyo, bato mingi bazali kotonda te na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ́, oyo eyokani na makoki ya libota. Lokola bato ya mombongo bazali kobimisa biloko ndenge na ndenge mpe bazali kosalela mayele na bango na kobenda likebi ya bato mpo na kolengola bango, batata mingi mpe bamama mingi bazali kolekisa ntango mingi na mosala mpo ete bákoka kosomba biloko yango. Ebele mosusu ya batata mpe ya bamama bazali kobunda mokolo na mokolo mpo na kozwa mwa biloko ya kolya. Basengeli kolekisa ntango mingi na mosala koleka ndenge ezalaki na kala, mbala mosusu na kosala misala mibale, bobele mpo ete bákoka komisombela biloko oyo basengeli na yango. Nzokande basusu bakozala na esengo soki bakozwa mosala, mpamba te, kozanga mosala ezali mokakatano oyo mopalangani mingi. Ɛɛ, bomoi ezali ntango nyonso pɛtɛɛ te mpo na libota na mikolo na biso, kasi mitindá ya Biblia mikoki kosalisa mabota na kosala oyo ekoki engebene ezalela na yango.

3. Lilako nini ntoma Paulo alimbolaki, mpe lolenge nini kosalela yango ekoki kosalisa moto ete alónga mpo na kotambwisa ndako malamu?

3 Ntoma Paulo akutanaki na mikakatano na makambo na nkita. Wana azalaki kati na yango, ayekolaki liteya moko ya motuya, oyo alimbolaki yango kati na mokanda oyo atindelaki Timoté, moninga na ye. Paulo akomi ete: “Toyei na eloko kati na mokili te mpe tokoki kolongwa na eloko na mokili te. Awa ezali biso na biloko na kolya mpe na bilamba na kolata, ebongi na biso bongo.” (1 Timoté 6:7, 8) Ya solo, longola biloko ya kolya mpe bilamba ya kolata, libota ezali na mposa ya makambo mingi. Ezali lisusu na mposa ya ndako ya kofanda. Bana basengeli kotánga kelasi. Mpe esengeli kozala na mbongo mpo na kofuta monganga mpe oyo esengeli kosalelama na makambo mosusu. Atako bongo, lilako oyo ezwami na maloba ya Paulo ebongi kosalelama. Soki tozali kosepela na kokokisa bamposa na biso na esika ya koluka kokokisa bilulela na biso, bomoi ekozala na mindɔndɔ́ te.

4, 5. Lolenge nini kokanisa liboso mpe kosala mwango esalisaka mpo na kotambwisa ndako malamu?

4 Lilako mosusu ya ntina lizwami kati na moko na masese ya Yesu. Alobaki ete: “Mpo ete soko moto moko kati na bino azali na mposa na kotonga ndako, akofanda liboso [te] kotánga motuya na yango kotala soko azali na mosolo na kosilisa yango?” (Luka 14:28) Yesu azali kolobela awa likambo ya kokanisa liboso, kokana likambo liboso ya kosala yango. Tomonaki kati na mokapo oyo ezali liboso lolenge nini yango esalisaka ntango bilenge mibale bazali kokanisa kobalana. Mpe nsima na kobalana, yango ezali lisusu na ntina mpo na koyeba kotambwisa ndako. Kokanisa liboso na likambo wana esɛngi kosala bidjɛ́, kosala mwango na lolenge ya kosalela mosolo oyo bozali na yango na mayele mpenza. Na motindo wana libota ekoki koyeba motuya ya mosolo oyo mosengeli kobimisama, kobomba mbongo mpo na kokokisa bamposa ya ntina ya mokolo na mokolo to ya pɔ́sɔ na pɔ́sɔ, mpe koluka te kosala makambo oyo maleki bidjɛ́ na bino.

5 Na mikili misusu, bidjɛ́ motindo wana ekoki kozala mpo na kotɛmɛla mposa makasi ya kodefa mbongo oyo ekosengela ete ozongisa yango na mosolo mosusu mobakisami likoló koleka mbongo oyo odefaki mpo na kosomba biloko bizangi ntina. Na mikili misusu, yango ekoki kosɛnga komipekisa makasi kozwa biloko na nyongo. (Masese 22:7) Ekoki mpe kosɛnga kotɛmɛla bopusi ya bisombasomba​—kosomba biloko oyo okanaki te kozanga kotalela bamposa mpe makambo oyo makoki kobima nsima. Lisusu, bidjɛ́ ekomonisa polele ete mbongo oyo ebebisami na moimi nyonso na masano ya mbongo, na komela makaya, mpe na kolekisa ndelo na komela masanga ebebisaka nkita ya libota, mpe yango eyokani te na mitindá ya Biblia.​—Masese 23:20, 21, 29-35; Baloma 6:19; Baefese 5:3-5.

6. Solo nini ya Makomami esalisaka baoyo bazali kati na bobólá?

6 Kasi, ezali boni mpo na baoyo ezalela ya makambo esali ete bázala kati na bobólá? Bakoki kobɔndisama na koyeba ete likambo wana oyo lizali komonana na mokili mobimba ezali bobele mpo na mwa ntango mokuse. Kati na mokili ya sika oyo esili kobɛlɛma, Yehova akolongola bobólá elongo na mabe nyonso mosusu oyo ezali komonisa bato mpasi. (Nzembo 72:1, 12-16) Nzokande, baklisto ya solo, ata bazali mpenza babólá, bazalaka te na mayoki ya kozanga elikya, mpamba te bazali na kondima kati na elaka oyo ya Yehova ete: “Nakotika yo soko moke te, nakosundola yo mpe te.” Na yango, mondimi akoki na elikya nyonso koloba ete: “[Yehova] azali mosungi na ngai, nakobanga [eloko] te.” (Baebele 13:5, 6) Na mikolo oyo ya mpasi, Yehova asili kosunga basambeli na ye na makambo mingi wana bazali komitambwisa na boyokani na mitindá na ye mpe wana bazali kotya Bokonzi na ye na esika ya liboso kati na bomoi na bango. (Matai 6:33) Mingi kati na bango bakoki koloba lokola ntoma Paulo ete: “Nayebi kozala mobólá, nayebi mpe kozala mozwi. Na likambo na likambo, ɛɛ na makambo nyonso nalakisami nzela na kotonda mpe koyoka nzala, kozala na biloko mingi mpe na kozanga. Nayebi kosala makambo nyonso kati na ye oyo akokembisaka ngai na nguya.”​—Bafilipi 4:12, 13.

KOMEMA MOKUMBA

7. Maloba nini ya Yesu, oyo soki masalelami, makosalisa mpo na kolónga kotambwisa ndako malamu?

7 Pene na nsuka ya mosala na ye awa na mabelé, Yesu alobaki ete: “Okolinga mozalani na yo lokola yo moko.” (Matai 22:39) Kosalela toli wana kati na libota esalisaka mingi mpo na koyeba kotambwisa ndako malamu. Kútu, banani bazali balingami na biso ya penepene soki baoyo bazali na libota te​—mibali mpe basi, baboti mpe bana? Lolenge nini basangani ya libota bakoki komonisa bolingo moko epai na mosusu?

8. Lolenge nini bolingo ekoki komonisama kati na libota?

8 Moko na lolenge ya komonisa yango ezali ete mosangani mokomoko ya libota asengeli kosala oyo ekoki na ye mpo na misala ya ndako. Na yango, bana basengeli koteyama lolenge ya kotya eloko na eloko na esika na yango nsima ya kosalela yango, ezala bilamba to mpe biloko na bango ya kosakana. Kobongisa mbeto ntɔ́ngɔ́ nyonso ekoki kosɛnga ntango mpe milende, kasi yango ezali lisungi monene mpo na kotambwisa ndako malamu. Ya solo, mwa mobulu ya moke, ya mwa ntango ekoki kopɛngolama te, kasi banso bakoki kosala makasi mpo ete ndako ezala na molɔngɔ́ mpe pɛto nsima ya kolya. Gɔigɔi, ezaleli ya moimi, mpe kosala na mitema mibale, elimo ya kozanga bosepeli ezalaka na bopusi mabe likoló na moto nyonso. (Masese 26:14-16) Epai mosusu, elimo ya bosepeli, ya kosala na motema moko epesaka nzela na bomoi ya libota ya esengo. “Nzambe alingi ye oyo akopesaka na esengo.”​—2 Bakolinti 9:7.

9, 10. (a) Bozito nini ezalaka mbala mingi epai na mwasi kati na ndako, mpe lolenge nini yango ekoki koyeisama pɛpɛlɛ? (b) Likanisi nini ya bokatikati epesami mpo na oyo etali misala ya ndako?

9 Limemya mpe bolingo ekosalisa na kopɛngola ezalela oyo ezalaka mokakatano monene kati na bandako mosusu. Uta kala bamama nde basalaka misala mingi ya ndako. Basengeli kobatela bana, kopɛtola ndako, kosukola bilamba ya basangani ya libota, kosomba mpe kolamba biloko. Na mikili misusu, na momeseno basi basalaka mpe kati na bilanga, batɛkaka biloko bazwaka na bilanga yango na zando, to bapesaka mabɔkɔ na makambo matali bidjɛ́ ya libota. Ata epai kuna mimeseno wana mizalaki te, makambo mosusu ya ntina masɛngisaki basi oyo babalá ete bázwa mosala ya kosala mosika na ndako. Mwasi mpe mama oyo azali kosala makasi kati na misala wana mikeseni abongi mpenza na makumisi. Lokola “mwasi ya molende” oyo alobelami kati na Biblia, azalaka na misala mingi ya kosala. “Akolyaka [limpa] na gɔigɔi te.” (Masese 31:10, 27) Kasi, yango elimboli te ete bobele mwasi nde moto oyo akoki kosala kati na ndako. Nsima wana mobali mpe mwasi balekisi mokolo mobimba na kosala mosala mosika na ndako, ekosengela ete mwasi ye moko asala misala ya ndako wana mobali na ye mpe basangani mosusu ya libota bazali kopema? Soko moke te. (Kokanisá na 2 Bakolinti 8:13, 14.) Na bongo, na ndakisa, soki mama alingi kolamba bilei, akoki kosepela soki basangani mosusu ya libota bazali kosalisa ye na kobongisa mpe na kotanda mesa, kosombela ye mwa biloko oyo asengeli na yango, to kokɔmbɔla ndako. Ɛɛ, banso bakoki kopesana mabɔkɔ.​—Kokanisá na Bagalatia 6:2.

10 Basusu bakoki koloba ete: “Epai nafandi misala wana ezali misala ya mobali te.” Yango ekoki kozala solo, kasi ekozala malamu tótalela likambo yango na likebi mpenza, boye te? Ntango Yehova Nzambe abandisaki libota, alobaki te ete misala boye misengeli kosalema bobele na basi. Mokolo moko, ntango moto na sembo Abalayama ayambaki batindami na Yehova, ezalaki ye moko nde apesaki mabɔkɔ na kolɛngɛla bilei mpe apesaki yango epai na bato oyo bayaki epai na ye. (Genese 18:1-8) Biblia epesi toli ete: “Mibali basengeli kolinga basi na bango lokola nzoto na bango mpenza.” (Baefese 5:28, NW) Soki, na nsuka ya mokolo, mobali alɛmbi, alingaka kopema, mwasi mpe akoki mpenza kolɛmba, mbala mosusu mingi koleka, boye te? (1 Petelo 3:7) Na bongo, ekozala likambo libongi mpe ya bolingo ete mobali apesa mabɔkɔ na misala ya ndako, boye te?​—Bafilipi 2:3, 4.

11. Na makambo nini Yesu atikaki ndakisa malamu mpo na mosangani mokomoko ya libota?

11 Yesu azali ndakisa malamu ya moto oyo asepelisaki Nzambe mpe oyo apesaki esengo epai na baninga na ye. Atako abalaká te, Yesu azali ndakisa malamu mpo na mibali, mpo na basi mpe mpo na bana. Alobaki na ntina na ye moko ete: “Mwana na moto ayei mpo na kosungama te kasi mpo na kosunga,” elingi koloba, kosalela basusu. (Matai 20:28) Oyo nde bosepeli ezali kati na mabota oyo basangani na yango bazali kolóna ezaleli wana!

BOPƐTO​—MPO NA NINI EZALI NA NTINA MINGI?

12. Yehova azali kosɛnga nini epai na baoyo bazali kosalela ye?

12 Etindá mosusu ya Biblia oyo ekoki kosalisa na kotambwisa malamu ndako ezwami kati na 2 Bakolinti 7:1. Kuna tozali kotánga ete: “Tómipɛtola mpenza na mbindo nyonso na nzoto mpe na elimo.” Baoyo bazali kotosa maloba wana mapemami bandimami epai na Yehova, oyo azali kosɛnga “losambo na pɛto mpe lobongi.” (Yakobo 1:27) Mpe bandako na bango ezali kozwa matomba mpo na yango.

13. Mpo na nini bopɛto ezali na ntina mingi mpo na kotambwisa malamu ndako?

13 Na ndakisa, Biblia endimisi biso ete mokolo ekoya wana maladi mpe bokɔnɔ ikozala lisusu te. Na ntango yango, “mofandi moko akoloba te ete, Ngai nazali na malali.” (Yisaya 33:24; Emoniseli 21:4, 5) Nzokande, sikawa libota mokomoko ezwaka bokɔnɔ na bantango mosusu. Ata Paulo mpe Timoté babɛlaki. (Bagalatia 4:13; 1 Timoté 5:23) Nzokande, minganga balobaka ete makɔnɔ mingi makoki kopɛngolama. Mabota ya mayele mazali kokima makɔnɔ oyo makoki kopɛngolama soki bazali koboya mbindo ya nzoto mpe ya elimo. Tiká tótalela lolenge nini yango ekoki kosalema.​—Kokanisá na Masese 22:3.

14. Lolenge nini bopɛto ya bizaleli ekoki kobatela libota na kopɛngola bokɔnɔ?

14 Bopɛto ya elimo esangisi bopɛto ya bizaleli. Lokola yango eyebani malamu, Biblia ezali kotombola bizaleli malamu mpe ezali kokweisa lolenge nyonso ya kosangisa nzoto kozanga kobalana. “Moto na pite . . . bato na ekobo mpe bakembi na nsɔni mpe mibali bamibebisi na mibali . . . bakosangola Bokonzi na Nzambe te.” (1 Bakolinti 6:9, 10) Kotosa malako wana ezali mpenza na ntina mpo na baklisto oyo bazali kobika kati na mokili oyo mosili kobeba. Kosala bongo ezali mpe kosepelisa Nzambe, mpe ezali kosalisa na kobatela libota na maladi oyo ezwamaka na kosangisa nzoto, na ndakisa sida, sopisi, kasende mpe mikrobe kati na masuba.​—Masese 7:10-23.

15. Pesá ndakisa moko oyo emonisi ete kozanga bopɛto ya nzoto ekoki kopesa maladi ya mpambampamba.

15 ‘Komipɛtola na mbindo nyonso na nzoto’ esalisaka na kobatela libota na makɔnɔ mosusu. Makɔnɔ mingi mazwamaka na ntina na kozanga bopɛto ya nzoto. Ndakisa ya liboso ezali bongo momeseno ya komela likaya. Likaya esuki te bobele na kobebisa mampúlúlú, bilamba mpe mopɛpɛ, kasi yango ezali mpe kopesa bato maladi. Mbula na mbula, bamilió ya bato bazali kokufa mpamba te bamelaka likaya. Kanisá naino, mbula na mbula, bamilió ya bato bakokaki kozwa maladi te mpe bakokaki kokufa noki te soki bapɛngolaki ‘mbindo wana ya nzoto’!

16, 17. (a) Mobeko nini Yehova apesaki oyo ebatelaki Bayisalaele ete bápɛngola kozwa makɔnɔ mosusu? (b) Lolenge nini lilako oyo ezali na Deteronome 23:12, 13 ekoki kosalelama kati na ndako nyonso?

16 Tótalela ndakisa mosusu. Esili koleka soko mibu 3 500, Nzambe apesaki libota ya Yisalaele Mibeko na ye mpo na kobongisa losambo na bango mpe, lisusu bomoi na bango ya mokolo na mokolo. Mibeko wana misalisaki mpo na kobatela libota na makɔnɔ na kotyáká mwa mitindá ya moboko mitali bopɛto ya nzoto. Moko na mibeko yango etalelaki salité ya bato, oyo esengelaki kokundama mosika na molako mpo ete esika bato bazalaki kofanda ebebisama te. (Deteronome 23:12, 13) Mobeko wana ya kala ezali naino toli moko malamu kino lelo. Ata lelo oyo, bato babɛlaka mpe bakufaka mpamba te bazali kolanda yango te. *

17 Na boyokani na lilako oyo ezali nsima na mobeko wana na Yisalaele, bisika ya kosukola mpe batwalɛ́ti​—ezala na kati to na libándá ya ndako—​esengeli kozala pɛto mpe kotyama nkisi oyo ebomaka mikrobe. Soki twalɛ́ti ezali pɛto te mpe ezipami te, nzinzi ikosangana kuna mpe ikopalanganisa mikrobe na bisika mosusu ya ndako​—mpe kati na biloko oyo tozali kolya! Lisusu, bana mpe mikóló basengeli kosukola mabɔkɔ nsima na kouta na twalɛ́ti. Soki basukoli yango te, bakoki komema mikrobe likoló na loposo na bango ya nzoto. Engebene monganga moko na France, kosukola mabɔkɔ “ezali naino moko na myango mileki malamu mpo na kopɛngola mpasi ya libumu, ya mpema, to bokɔti ya mikrobe na loposo.”

Kobatela biloko pɛto ezalaka ntalo mingi te koleka kosomba nkisi ya monganga

18, 19. Batoli nini epesami mpo na kobatela ndako pɛto ata kati na kartyé ya bobólá?

18 Ya solo, bopɛto ezali ntembe monene na kartyé ya bobólá. Moto moko oyo amesanaki mingi na bisika motindo wana alimbolaki ete: “Molungé makasi ezali kosala ete mosala ya kotya bopɛto ekóma mpasi mbala mibale. Putulu ya mopɛpɛ ezali kozipa minkaka ya ndako na pudelé ya moindo. . . . Koyikana ya bato mingi kati na bingumba, mpe na bamboka mike mosusu, ezali mpe koyeisa mikakatano na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto. Talasé ya polele, maboke ya bosɔtɔ oyo epanzani epai na epai, batwalɛ́ti ya mabe mpo na bato banso, mpoko oyo imemaka maladi, mpese, mpe nzinzi, bato basili komesana na yango.”

19 Kobatela bopɛto kati na ezalela motindo wana ezali mpasi. Nzokande, ebongi kosala milende. Sabuni mpe mai ezali na motuya mingi te soki tokokanisi yango na mbongo oyo esɛngamaka na lopitalo. Soki ozali kofanda na esika motindo wana, salá oyo ekoki na yo, mpo na kobatela ndako na yo mpe libándá na yo pɛto mpe longolá bosɔtɔ nyonso ya banyama. Soki nzela oyo ezali komema kino na ndako na yo etikaka pɔtɔpɔtɔ na ntango ya mbula, okoki nde kotya mwa mabanga ya konyatela mpo na kosalisa ete pɔtɔpɔtɔ ekɔta na ndako te? Soki moto alati sapato to sandale, akoki nde kolongola yango liboso ya kokɔta na ndako? Lisusu, osengeli kosɛnzɛla ete mikrobe ekɔta te na mai ya komela. Ekanisami ete soko milió mibale ya bato oyo bazali kokufa ezali mpo na ntina na mai ya bosɔtɔ mpe na kozanga bopɛto.

20. Mpo ete ndako ezala mpenza pɛto, nani asengeli kozala na mokumba na likambo yango?

20 Mpo ete ndako ezala pɛto, yango ezali likambo ya moto nyonso​—mama, tata, bana, mpe bapaya. Mama moko oyo azali na bana mwambe na mboka Kenya, alobaki ete: “Moto na moto ayebaki kosala oyo esɛngami na ye.” Ndako ya pɛto mpe oyo ebongisami malamu emonanaka epai na basangani ya libota mobimba. Lisese moko ya Espagne elobi ete: “Kozala mobólá epesi nzela te na kozanga bopɛto.” Epai nyonso oyo moto afandi, ezala kati na lotɛlɛ, na apartemá moko, na ndako oyo elongobani, to na mwa ndako moke, bopɛto ezali na ntina mingi mpo na kozala na libota oyo ezali na kolɔngɔ́nɔ́ malamu.

KOLENDISANA ESALAKA ETE TÓZALA MALAMU

21. Na boyokani na Masese 31:28, nini ekopesa bolamu kati na ndako?

21 Wana ezali kolobela mwasi ya molende, mokanda ya Masese elobi ete: “Bana na ye bakotɛlɛma mpe bakobyanga ye mopambwami; mobali na ye lokola mpe, ye akosanzola ye.” (Masese 31:28) Ntango nini opesaki longonya ya nsuka na mosangani moko ya libota na yo? Ya solo, tozali lokola nzeté na ntango ya prɛntá oyo ezali pene na kobimisa fololo wana yango ezali kozwa mwa mɔ́tɔ mpe mwa mai. Mpo na biso, tozali na mposa ete bápesa biso longonya ya mɔ́tɔ. Yango ezali kosalisa mwasi na koyeba ete mobali na ye azali kosepela na mosala na ye makasi mpe na likebi etondi na bolingo oyo azali na yango mpe ete mobali na ye azali kotala mosala na ye mpamba te. (Masese 15:23; 25:11) Mpe ezali likambo ya kosepelisa wana mwasi azali kopesa mobali na ye longonya mpo na mosala oyo azali kokokisa ezala na kati to na libándá ya ndako. Bana mpe basepelaka wana baboti na bango bazali kokumisa bango mpo na milende oyo bazali kosala na ndako, na eteyelo, to na lisangá ya boklisto. Mpe kopesa matɔ́ndi ata na makambo mikemike elendisaka mpenza! Mpasi nini ezali na koloba ete: “Matɔ́ndi mingi”? Yango ezali mpenza likambo ya moke, kasi yango ekoki kopesa matomba minene mpo na bizaleli malamu ya libota.

22. Nini esengeli mpo ete “ndako etongama makasi,” mpe lolenge nini yango ekoki kozwama?

22 Mpo na bantina mingi, kotambwisa ndako malamu ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Nzokande, yango ekoki kobimisa matomba. Lisese moko ya Biblia elobi ete: “Ndako ekotongama malamu na nzela na mayele; ekokokisama na nzela na bososoli.” (Masese 24:3) Mayele mpe bososoli ekoki kozwama soki bato banso kati na libota bazali kosala makasi na koyekola mokano ya Nzambe mpe kosalela yango kati na bomoi na bango. Mpo na kozala na libota ya esengo ebongi mpenza kosala milende!

^ Kati na búku moko oyo epesaka toli mpo na lolenge ya kopɛngola kozwa pulúpulú​—maladi oyo emonanaka mingi mpe oyo ezali koboma ebele ya bana—​Ebongiseli ya Mokili mobimba mpo na makambo matali kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto elobi ete: “Soki kabinɛ́ ezali te: salá salité mosika na ndako, mpe mosika na esika oyo bana basakanaka, mpe soko na ntáká ya bamɛtɛlɛ 10 longwa na esika oyo batokaka mai; zipá salité na yo na mabelé.”