Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO YA ZOMI NA MOKO

Asɛnzɛlaki, mpe azelaki

Asɛnzɛlaki, mpe azelaki

1, 2. Likambo nini ya mpasi Eliya asengelaki kosala, mpe na makambo nini akesanaki mpenza na Ahaba?

ELIYA azalaki na mposa ya kotikala ye moko mpo abondela Tata na ye ya likoló. Nzokande, ebele ya bato oyo bazali wana bautaki komona mosakoli yango akitisi mɔtɔ na likoló, mpe na ntembe te mingi na bango bazalaki koluka asepela na bango mpe apambola bango. Liboso Eliya amata na Ngomba Karamele mpo na kobondela Yehova Nzambe, asengelaki kosala likambo moko oyo ezalaki mpasi mpo na ye. Asengelaki kosolola na Mokonzi Ahaba.

2 Ahaba ná Eliya bakesanaki mpenza. Ahaba oyo alataki bilamba kitoko ya mokonzi, azalaki lokoso, mpe bato bazalaki komemamema ye mpo na kosala makambo mabe mpe azalaki mopɛngwi. Eliya alataki kaka elamba na ye ya basakoli, oyo ntango mosusu ezalaki kaka robɛ moko basalá na mposo ya nyama to na nsuki ya kamela to ya ntaba. Azalaki mobali moko ya mpiko, moto ya sembo mpe ya kondima. Makambo oyo elekaki mokolo wana emonisaki polele bokeseni oyo ezali kati na Eliya mpe Ahaba.

3, 4. (a) Mpo na nini mokolo wana ezalaki mabe mpo na Ahaba mpe basambeli mosusu ya Baala? (b) Mituna nini tokotalela?

3 Ezalaki mokolo mabe mpenza mpo na Ahaba mpe basambeli mosusu ya Baala. Losambo ya bapakano oyo Ahaba ná mwasi na ye Yezabele batombolaki na Yisraele, bokonzi ya mabota zomi, esambwaki mpenza. Emonanaki polele ete Baala azali nzambe ya lokuta. Nzambe yango ya lokuta akokaki te kopelisa ata mɔtɔ ya mpamba mpo na koyanola basakoli na ye oyo babomaki nzoto na kobondela, kobina mpe komizokisa bampota. Baala akokaki te kobatela basambeli na ye 450 oyo bazwaki etumbu oyo ebongaki na bango. Kasi, nzambe yango ya lokuta akweisamaki mpe na likambo mosusu, mpe, esengelaki komonana polele. Na boumeli ya mbula koleka misato, basakoli ya Baala babondelaki ye asukisa elanga oyo enyokolaki bato, kasi Baala akokaki te kosala yango. Mosika te, Yehova asengelaki kosukisa eleko ya elanga mpo na komonisa nguya na ye.​—1 Bak. 16:30–17:1; 18:1-40.

4 Kasi, ntango nini Yehova alingaki kosala yango? Mpe Eliya asengelaki kosala nini na ntango wana oyo azalaki kozela Yehova asala? Mpe liteya nini tokoki kozwa epai ya mobali wana ya kondima? Tokozwa biyano ntango tokotalela lisolo yango.​—Tángá 1 Bakonzi 18:41-46.

Amipesaki na mabondeli

5. Eliya ayebisaki Ahaba asala nini, mpe Ahaba azwaki ata mwa liteya na makambo oyo esalemaki mokolo wana?

5 Eliya apusanaki epai na Ahaba mpe alobaki: “Tɛlɛmá, lyá mpe mɛlá; mpo makɛlɛlɛ oyo ezali koyokana ezali lokito ya mbula makasi.” Mokonzi yango mabe azwaki nde liteya na makambo oyo esalemaki mokolo wana? Biblia elobi yango te, kasi ata esika moko te emonani ete Ahaba abongolaki motema to asɛngaki na mosakoli Eliya abondela Yehova mpo alimbisa ye. Ahaba asalaki yango te, kasi “atɛlɛmaki mpo na kolya mpe komɛla.” (1 Bak. 18:41, 42) Bongo Eliya?

6, 7. Eliya abondelaki mpo na likambo nini, mpe mpo na nini?

6 “Kasi Eliya amataki na nsɔngɛ ya Karamele mpe abandaki kogunzama na mabele mpe kotya elongi na ye na kati ya mabɔlɔngɔ na ye.” Ntango Ahaba akendaki kolya, Eliya amonaki ete ezali libaku ya kobondela Tata na ye ya likoló. Biblia emonisi ete Eliya asalaki yango na komikitisa mpenza​—agunzamaki na mabele tii elongi na ye elingi etuta mabɔlɔngɔ na ye. Azalaki kosala nini? Eyano ezali polele. Biblia eyebisi biso na Yakobo 5:18 ete Eliya abondelaki mpo eleko ya elanga esila. Na ntembe te, asalaki libondeli yango likoló ya Ngomba Karamele.

Mabondeli ya Eliya emonisaki ete azalaki na mposa makasi ete mokano ya Nzambe esalema

7 Mwa moke liboso, Yehova alobaki ete: “Nakani konɔkisa mbula na mabele.” (1 Bak. 18:1) Na yango, Eliya abondelaki mpo mokano ya Yehova ekokisama, ndenge kaka Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka, mbula soki nkóto moko na nsima.​—Mat. 6:9, 10.

8. Ndakisa ya Eliya eteyi biso nini na likambo etali libondeli?

8 Ndakisa ya Eliya eteyi biso makambo mingi na likambo etali libondeli. Eliya azalaki kokanisa libosoliboso kokokisama ya mokano ya Nzambe. Ntango tozali kobondela, ekozala malamu tóbosanaka te ete “ezala eloko nini biso tokosɛnga na boyokani na mokano na ye [ya Nzambe], akoyoka biso.” (1 Yoa. 5:14) Na yango, emonani polele ete tosengeli koyeba soki mokano ya Nzambe ezali nini mpo mabondeli na biso endimama; yango wana tosengeli koyekolaka Biblia mokolo na mokolo. Na ntembe te, mposa ya Eliya ezalaki mpe ete eleko ya elanga esila mpo mpasi oyo bato ya mboka bazalaki na yango esila. Na ntembe te, azalaki mpenza na botɔndi nsima ya komona likamwisi oyo Yehova asalaki na mokolo wana. Biso mpe tosengeli kopesaka Yehova mersi na mabondeli na biso mpe komonisa ete tomibanzabanzaka mpo na basusu.​—Tángá 2 Bakorinti 1:11; Bafilipi 4:6.

Asɛnzɛlaki mpe atyelaki Nzambe motema

9. Eliya atindaki mosaleli na ye asala nini, mpe bizaleli nini mibale ya Eliya tokotalela?

9 Eliya azalaki na elikya ete Yehova akonɔkisa mbula, kasi ayebaki mpenza te soki akosala yango ntango nini. Kasi, Eliya azalaki kosala nini na ntango wana? Biblia elobi boye: “Alobaki na mosaleli na ye boye: ‘Nabondeli yo, matá. Talá na ngámbo ya mbu.’ Bongo amataki mpe atalaki mpe na nsima alobaki ete: ‘Ata eloko moko ezali te.’ Mpe alobaki lisusu boye: ‘Zongá,’ mbala nsambo.” (1 Bak. 18:43) Ndakisa ya Eliya ezali koteya biso makambo soki mibale. Ya liboso, mosakoli azalaki kotyela Nzambe motema. Ya mibale, azalaki kosɛnzɛla.

Eliya azalaki mpenza koluka komona elembo oyo ekomonisa ete etikali moke Yehova abɛtisa mbula

10, 11. (a) Nini emonisi ete Eliya atyelaki elaka ya Yehova motema? (b) Mpo na nini biso mpe tokoki kozala na kondima ya ndenge wana?

10 Lokola atyelaki bilaka ya Yehova motema, Eliya azalaki mpenza koluka komona elembo oyo ekomonisa ete etikali moke Yehova abɛtisa mbula. Atindaki mosaleli na ye amata na esika moko ya likoló mpo atala soki ezali ata na elembo moko oyo emonisi ete mbula ezali koya. Mosaleli yango azongaki na nsango moko ya kolendisa te; alobaki boye: “Ata eloko moko ezali te.” Mapata ezalaki polele, mpe likoló eyindaki te. Omoni likambo moko ya kokamwisa? Tóbosana te: Eliya autaki koyebisa Mokonzi Ahaba ete, “makɛlɛlɛ oyo ezali koyokana ezali lokito ya mbula makasi.” Ndenge nini mosakoli Eliya akokaki koloba likambo ya ndenge wana na ntango amonaki ata mwa elembo te emonisi ete mbula ekobɛta?

11 Eliya ayebaki elaka ya Yehova. Lokola azalaki mosakoli mpe momonisi ya Yehova, azalaki na elikya ete Nzambe na ye akokokisa maloba na Ye. Lokola Eliya atyelaki mpenza Nzambe motema, ezalaki lokola nde azali koyoka mbula makasi ezali konɔka. Yango ekoki kosalisa biso tóbosana te likambo oyo Biblia elobaki mpo na Moize ete: “Atikalaki ngwi lokola nde azalaki komona Moto oyo amonanaka te.” Yo mpe omonaka Nzambe ndenge wana? Apesi biso bilembeteli ebele oyo ekoki kosalisa biso tómonisa kondima ya ndenge wana epai na ye mpe na bilaka na ye.​—Ebr. 11:1, 27.

12. Ndenge nini Eliya amonisaki ete azalaki kosɛnzɛla, mpe asalaki nini ntango ayokaki ete mwa lipata moko ezali na likoló?

12 Tólobela sikoyo ndenge Eliya asɛnzɛlaki. Atindaki mosaleli na ye mbala moko to mibale te, kasi mbala nsambo! Mbala mosusu mosaleli yango alɛmbaki kosala kaka likambo yango mbala na mbala, kasi lokola Eliya azalaki mpenza na mposa ya komona elembo, alɛmbaki te. Nsukansuka, nsima ya kozonga mbala ya nsambo, mosaleli yango ayebisaki ye ete: “Talá! Mwa lipata moko lokola lobɔkɔ ya moto ezali kouta na mbu mpe ezali komata.” Ozali komona ndenge mosaleli yango asembolaki lobɔkɔ mpo na komonisa bonene ya lipata yango oyo ezalaki kouta na Mai Monene? Ekoki kozala ete mosaleli yango akanisaki ete mwa lipata yango ezali na ntina te. Kasi mpo na Eliya, ezalaki na ntina mingi. Ayebisaki mosaleli na ye makambo oyo asengeli kosala na lombangu. Alobaki boye: “Matá, yebisá Ahaba ete: ‘Kangisá banyama na likalo! Mpe kitá mpo mbula makasi ekangisa yo te!’”​—1 Bak. 18:44.

13, 14. (a) Ndenge nini tokoki komekola Eliya na likambo etali kosɛnzɛla? (b) Makambo nini esengeli kotinda biso tósala na lombangu?

13 Eliya atikeli biso ndakisa malamu mpenza na likambo etali kosɛnzɛla. Biso mpe tozali na eleko oyo etikali moke Nzambe akokisa mokano na ye. Eliya azelaki ntango eleko ya elanga ekosila; basaleli ya Nzambe lelo oyo bazali kozela nsuka ya mokili oyo ya mabe. (1 Yoa. 2:17) Kino ntango Yehova Nzambe akotya nsuka ya mokili oyo ya mabe, tosengeli kokoba kosɛnzɛla, ndenge Eliya asalaki. Yesu Kristo, Mwana ya Nzambe, apesaki bayekoli na ye toli oyo: “Bósɛnzɛlaka mpo boyebi te mokolo Nkolo na bino akoya.” (Mat. 24:42) Yesu alingaki nde koloba ete bayekoli na ye bakoyeba te ete etikali moke nsuka eya? Te, mpamba te ayebisaki bango makambo oyo ekozala na mokili ntango nsuka ekokóma pene. Biso nyonso tosengeli kotya likebi ndenge eteni mokomoko ya elembo ya “bosukisi ya makambo ya ntango oyo” ezali kokokisama.​—Tángá Matai 24:3-7.

Mwa lipata moke ekokaki mpo na kondimisa Eliya ete etikali moke Yehova abɛtisa mbula. Elembo oyo ezali kokokisama na mikolo ya nsuka ezali kondimisa biso ete tosengeli mpenza kosala na lombangu

14 Eteni mokomoko ya elembo yango emonisaka mpenza ete nsuka ekómi pene. Makambo yango ekoki mpenza mpo na kotinda biso tósala na lombangu na mosala ya Yehova? Mwa lipata moko moke oyo ezalaki komonana na likoló ekokaki mpo na kondimisa Eliya ete etikali moke Yehova abɛtisa mbula. Mosakoli wana ya sembo abungisaki elikya?

Yehova akitisi ye motema mpe apamboli ye

15, 16. Makambo nini ekómaki kokende nokinoki, mpe ekoki kozala Eliya akanisaki ete Ahaba akosala nini?

15 Lisolo yango elobi boye: “Na ntango yango, likoló eyindaki na mapata mpe na mopɛpɛ mpe mbula makasi mpenza ebandaki konɔka. Mpe Ahaba amataki na likalo na ye mpe asimbaki nzela akei na Yizireele.” (1 Bak. 18:45) Makambo ekómaki kokende nokinoki mpenza. Ntango mosaleli ya Eliya azalaki koyebisa Ahaba nsango oyo mosakoli atindaki, mapata ekómaki ebele, mpe likoló mobimba eyindaki. Mopɛpɛ makasi ebɛtaki. Nsukansuka, nsima ya mbula misato na ndambo, mbula ebɛtaki na Yisraele. Mabele oyo ekaukaki ezalaki komɛla mai yango. Ntango mbula ekómaki makasi, mai ya Kishone etondaki, mpe na ntembe te ememaki makila ya basakoli ya Baala oyo babomamaki. Bayisraele oyo babungaki nzela bazwaki libaku ya kolongola losambo ya Baala na ekólo na bango.

“Mbula makasi mpenza ebandaki konɔka”

16 Na ntembe te, Eliya azalaki na elikya ete ekosalema bongo! Mbala mosusu azalaki komituna soki Ahaba akosala nini na makambo minene wana oyo ezalaki koleka. Ahaba akobongola nde motema mpe akotika losambo ya Baala? Makambo oyo esalemaki mokolo wana esengelaki mpenza kotinda ye asala mbongwana. Ya solo, toyebi te soki Ahaba azalaki kokanisa nini na ntango wana. Biblia elobi kaka ete mokonzi “amataki na likalo na ye mpe asimbaki nzela akei na Yizireele.” Azwaki nde mateya? Azwaki nde ekateli ya kobongwana? Makambo oyo esalemaki na nsima emonisi ete abongwanaki te. Nzokande, mokolo esilaki naino te mpo na Ahaba mpe mpo na Eliya.

17, 18. (a) Nini ekómelaki Eliya ntango azalaki kokende na Yizireele? (b) Likambo nini ekamwisi yo ndenge Eliya apotaki mbangu kobanda Karamele tii na Yizireele? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)

17 Mosakoli ya Yehova abandaki kokende kaka na nzela oyo Ahaba akendeki. Ezalaki mobembo ya mpasi mpo na Eliya mpo nzela ezalaki molai, mbula ezalaki kobɛta, mpe molili ezalaki mpo mapata eyindaki mpe ntango elekaki mpenza. Kasi, likambo moko ya kokamwa esalemaki.

18 “Lobɔkɔ ya Yehova ezalaki likoló ya Eliya, bongo akangaki mokaba na loketo na ye mpe apotaki mbangu liboso ya Ahaba tii na Yizireele.” (1 Bak. 18:46) Emonani polele ete “lobɔkɔ ya Yehova” esalisaki Eliya na ndenge ya kokamwa. Yizireele ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ 30, mpe Eliya azalaki elenge te. * Meká komona na makanisi ndenge mosakoli yango alíngi bilamba na ye ya milai, akangi yango na loketo mpo makolo na ye ezala na nkaka te, mpe azali kopota mbangu na nzela wana oyo etondaki na mai ya mbula, apoti mbangu makasi tii akuti likalo ya mokonzi mpe aleki yango!

19. (a) Makasi mpe nguya oyo Nzambe apesaki Eliya ekoki kosalisa biso tóyeba lisusu bisakweli nini? (b) Ntango Eliya azalaki kopota mbangu mpo na kokende na Yizireele, likambo nini ayebaki malamu?

19 Ezalaki mpenza lipamboli monene mpo na Eliya! Na ntembe te, asepelaki mingi kozwa makasi mpe nguya, oyo mbala mosusu kutu elekaki ata oyo azalaki na yango na bolenge na ye. Yango ekoki kosalisa biso tóbosana te bisakweli oyo elobi ete bato ya sembo bakokóma na nzoto ya kokoka na Paradiso oyo ezali koya. (Tángá Yisaya 35:6; Luka 23:43) Na ntembe te, ntango Eliya azalaki kopota mbangu na nzela wana oyo etondaki na mai ya mbula, ayebaki malamu ete Tata na ye Yehova, Nzambe kaka moko ya solo, alingaka ye!

20. Ndenge nini tokoki kozwa mapamboli ya Yehova?

20 Yehova alingaka kopambola biso. Tóluka kozwa mapamboli yango; ebongi tósalela yango milende mpenza. Ndenge moko na Eliya, tosengeli kosɛnzɛla, kotyaka likebi na makambo oyo ezali komonisa ete etikali moke Yehova atya nsuka na mokili mabe oyo. Lokola Eliya, tosengeli kotya motema mobimba na bilaka ya Yehova, “Nzambe ya solo.”​—Nz. 31:5.

^ par. 18 Mwa moke nsima, Yehova atindaki Eliya apesa Elisha formasyo, ayaki koyebana na nsima lokola moto oyo “azalaki kosopela Eliya mai na mabɔkɔ.” (2 Bak. 3:11) Elisha azalaki mosaleli ya Eliya; emonani ete azalaki kosunga Eliya mpo akómaki mobange.