Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nzambe akipaka mpenza bato?

Nzambe akipaka mpenza bato?

MOKOLO ya 1 Novɛmbɛ 1755 na ntɔngɔ, mabele eninganaki makasi na engumba Lisbonne, na ekólo Portugal. Na nsima, mai ya mbu emataki mpe ekɔtaki na mokili, mɔtɔ makasi epelaki, ebebisaki bandako ebele mpe ebomaki ebele ya bato.

Ntango mabele eninganaki na Haïti na 2010, na nsima, zulunalo moko ya Canada (National Post) elobaki boye: “Makama nyonso ya minene etindaka bato bámituna soki Nzambe akipaka mpenza bato. Kasi makama mosusu, na ndakisa koningana ya mabele ya Lisbonne mpe ya Haïti, etindaka bato bámituna bongo lisusu koleka.” Zulunalo yango esukisaki boye: “Ekoki kozala ete Nzambe asundoli Haïti.”

Lokola Yehova Nzambe azali “Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,” akoki kosilisa bampasi. (Nzembo 91:1) Longola yango, tokoki mpenza kotya motema ete akipaka bato. Mpo na nini?

Makambo oyo toyebi mpo na Nzambe

Nzambe ayokaka mawa mpo na bato oyo bazali konyokwama. Ntango Bayisraele bazalaki baombo na Ezipito mpe bazalaki konyokola bango, Nzambe ayebisaki Moize boye: “Ya solo mpenza, namoni mpasi ya bato na ngai oyo bazali na Ezipito, mpe nayoki kolela na bango mpo na baoyo bazali kotinda bango na makasi básala mosala; mpo nayebi malamu bampasi oyo bazali komona.” (Kobima 3:7) Maloba yango emonisi nini? Emonisi ete Nzambe akipaka bato oyo bazali konyokwama. Kutu, basiɛklɛ mingi na nsima, mosakoli Yisaya akomaki boye mpo na Bayisraele: “Ntango nyonso oyo bazalaki na mpasi, ye mpe azalaki koyoka mpasi.”​—Yisaya 63:9.

“Banzela na ye nyonso ezali bosembo.” (Kolimbola Mibeko 32:4) Nzambe azali sembo mpe asalaka makambo nyonso kozanga koponapona. “Akokɛngɛla nzela ya bato na ye ya sembo,” kasi ‘akozongisa mpe bolɔzi na baoyo bazali kobimisela bato ya sembo bolɔzi.’ (Masese 2:8; 2 Batesaloniki 1:6, 7) Lokola aponaponaka te, “akotalaka bilongi ya mikóló te mpe akotalaka mozwi koleka mobola te mpo ete bazali nyonso mosala ya mabɔkɔ na ye.” (Yobo 34:19, Biblia haut fleuve) Nzambe ayebi mpe ndenge ya malamu ya kosilisa bampasi ya bato. Kasi, milende oyo bato bazali kosala mpo na kosilisa bampasi ezali lokola kokanga elamba na mpota oyo moto azoki na lisasi. Atako elamba yango ekoki kobomba mpota, ekosilisa yango te to kosilisa mpasi oyo moto azali koyoka.

Monganga akoki nde kosuka kaka na kokanga elamba na mpota oyo moto azoki na lisasi?

Nzambe azali “motema mawa mpe ngɔlu . . . mpe atondi na motema boboto.” (Kolimbola Mibeko 34:6) Na Biblia, maloba “motema mawa” epesaka likanisi ya mawa oyo etindaka moto asalisa mozalani na ye. Liloba ya Ebre oyo ebongolami na “ngɔlu” elimbolaka “mposa makasi oyo etindaka moto akabela moto oyo azali kokelela.” Buku moko (Theological Dictionary of the Old Testament) elobi ete liloba oyo ebongolami na “motema boboto” elimboli mpe “kosalisa moto oyo azali na mokakatano to na mpasi.” Yehova Nzambe asukaka kaka te na koyoka mawa ntango moto azali konyokwama, kasi asalisaka moto mpo azali Nzambe ya motema mawa, ya ngɔlu mpe ya motema boboto. Na yango, tosengeli kotya motema ete akosukisa bampasi.

Lisolo oyo eleki elobelaki makambo misato oyo ezali kosala ete bato bámona mpasi lelo oyo; makambo yango nyonso eutaka na Nzambe te. Sikoyo, tótalela nini esalaka ete makambo yango ezala.

Makambo oyo biso moko toponaka

Na ebandeli, Nzambe ye moko azalaki koyangela Adama. Kasi, ntango Adama amekamaki, aponaki kopesa boyangeli ya Nzambe mokɔngɔ mpe andimaki komona makambo oyo ekobima soki amitambwisi ye moko. Aboyaki koyoka likebisi ya Yehova oyo ezali na Ebandeli 2:17 ete: “Okokufa solo.” Koboya kotosa mobeko ya Nzambe ememaki lisumu mpe kozanga kokoka. Biblia elobi ete: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu.” (Baroma 5:12) Kasi, Nzambe akolongola makambo nyonso oyo lisumu ememá.

Makambo oyo ekanami te

Ndenge tomoni yango, Adama moto ya liboso aboyaki Nzambe atambwisa ye, likambo oyo ekokaki kosalisa bato bázala na mpasi te, mpe bákutana te na makama ya mipɛpɛ makasi, mpela, koningana ya mabele mpe bongo na bongo. Tokoki kokokanisa ekateli oyo Adama azwaki na ekateli ya moto ya maladi oyo aboyi ete monganga oyo ayebi mosala malamu asalisa ye. Moto yango akoki konyokwama na motó makasi na ye mpo ayebi te makama mpe mikakatano oyo maladi yango ekoki kobimisela ye. Ndenge moko mpe, makama mingi ekómelaka bato mpo bazali kosala makambo oyo ebongi te, na ndakisa bazali kotonga bandako na ndenge mpe na bisika oyo esengeli te, mpe bayebi te ndenge biloko lokola mipɛpɛ makasi, koningana ya mabele esalemaka. Kasi, Nzambe akotika te ete makambo ezala bongo libela na libela.

“Mokonzi ya mokili oyo”

Mpo na nini Nzambe atikaki Satana ayangela mokili nsima ya botomboki? Buku moko elobi boye: “Guvɛrnema nyonso ya sika ezalaka na mwa ntango mpo na komonisa ete soki ezali kokoka makambo te, ezali foti ya guvɛrnema oyo ezalaki liboso.” Soki Yehova alongolaki nokinoki Satana, “mokonzi ya mokili oyo,” mokonzi yango alingaki koloba ete soki akoki makambo te, ezali foti ya Moyangeli ya liboso, elingi koloba Nzambe. (Yoane 12:31) Kasi, ntango oyo Nzambe atikeli Satana ayangela mokili, emonisi ete Satana akoki makambo te. Atako bongo, motuna oyo ezali kaka: Nini ekoki kondimisa biso mpenza ete bampasi ekosila?