Tiká “mobeko ya motema boboto” elendisa yo
LISA alobaki boye: “Eloko oyo ebendaki ngai mingi ezalaki motema boboto ya bandeko basi mpe mibali.” a Azalaki kolobela likambo ya libosoliboso oyo ebendaki ye na solo. Ezalaki mpe bongo mpo na Anne, oyo alobaki boye: “Na ebandeli, eloko oyo ebendaki ngai na solo ezalaki mpo Batatoli ya Yehova bazalaki na boboto.” Sikoyo bandeko na biso wana mibale ya basi bazali kosepela kotánga Biblia mpe komanyola makambo oyo bazali kotánga, kasi motema boboto nde ebendaki bango libosoliboso.
Ndenge nini tokoki komonisa motema boboto oyo ekosimba mitema ya bato oyo tofandi na bango esika moko? Tólobela ndenge mibale ya komonisa yango: na maloba na biso mpe na misala na biso. Na nsima tokolobela banani tosengeli komonisela motema boboto.
“MOBEKO YA MOTEMA BOBOTO” EZALA NA LOLEMO NA YO
Masese mokapo 31 elobi ete mwasi ya makoki azali na “mobeko ya motema boboto” na lolemo na ye. (Mas. 31:26) Atikaka “mobeko” yango etambwisa maloba na ye mpe ndenge akoloba yango. Batata mpe basengeli kozala na “mobeko” yango na lolemo na bango. Baboti mingi bayebi malamu ete maloba oyo ezali koyokana mabe ekoki kosala mwana mabe. Soki baboti bazali koloba na mongongo ya malamu te, ya malili, mbala mosusu yango ekoki kosala mwana mabe to kosala ete mwana aboya koyoka makambo oyo bazali koloba. Na yango, mpo maloba na bango ebenda likebi ya mwana mpe ebota mbuma, baboti basengeli kosala makasi bálobaka na boboto.
Ezala ozali moboti to te, ndenge nini okoki koyekola koloba na boboto? Sɛkɛlɛ ezwami na eteni ya liboso ya Masese 31:26, oyo elobi: “Afungoli monɔkɔ na ye na bwanya.” Yango esangisi kopona maloba na biso to koloba yango na mongongo oyo ebongi. Ekosalisa biso ntango nyonso soki tozali komituna boye: ‘Makambo oyo nalingi koloba ekomatisa nkanda, to ekosala ete kimya ezala?’ (Mas. 15:1) Na ntembe te, ezali likambo ya bwanya kokanisa liboso ya koloba.
Mokanda ya Masese elobi lisusu boye: “Moto mosusu alobaka kozanga kokanisa lokola nde azali kozokisa na mopanga.” (Mas. 12:18) Soki tokanisi ndenge maloba na biso mpe ndenge tokoloba yango ekosala basusu, ekoki kosalisa biso tókanisa makambo oyo tokoloba. Ya solo, ndenge oyo tosalelaka “mobeko ya motema boboto” ekosalisa biso tóbimisa te maloba ya mabe mpe tóloba na boboto. (Ef. 4:31, 32) Tokolongola makanisi ya mabe mpe maloba ya mabe na esika na yango tokotya maloba ya malamu, ya boboto mpe tokoloba na mongongo ya esengo. Yehova apesá ndakisa na likambo yango ntango akitisaki mosaleli na ye Eliya motema oyo azalaki kobanga. Anzelu oyo azalaki komonisa Yehova alobaki na ye na “mongongo moko ya kimya, ya nse.” (1 Bak. 19:12) Kasi, kozala na boboto esuki kaka te koloba na boboto. Tosengeli mpe komonisa misala ya motema boboto. Na ndenge nini?
MISALA YA MOTEMA BOBOTO ELENDISAKA BASUSU
Tomekolaka Yehova ntango tolobaka na boboto mpe tosalaka makambo na boboto. (Ef. 4:32; 5:1, 2) Lisa, oyo tolobelaki liboso, alobelaki boboto oyo Batatoli ya Yehova bamonisaki. Alobi boye: “Ntango libota na biso esengelaki kosala mobembo na mbalakaka, mabota mibale na lisangá na biso bazwaki konje kaka mpo na kosalisa biso tókanga biloko. Na ntango wana, nazalaki kutu koyekola Biblia te!” Makambo wana ya boboto oyo basalaki etindaki Lisa ayekola lisusu malamumalamu solo.
Anne, oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo, ye mpe azalaki na botɔndi mpenza ndenge Batatoli ya Yehova bamoniselaki ye motema boboto. Alobaki boye: “Ndenge bato bakómi kosalelana makambo lelo oyo, yango esali ete nakóma na bantembe mingi mpenza. Ekómaki mpasi natyela bato motema.” Abakisaki boye: “Ntango nakutanaki na Batatoli ya Yehova, nandimelaki bango te. Nazalaki komituna boye: ‘Mpo na nini bazali kotyela ngai likebi mingi boye?’ Kasi lokola ndeko oyo azalaki koteya ngai Biblia azalaki na motema boboto, yango etindaki ngai natyela ye motema.” Yango ebimisaki litomba? Ɛɛ, Anne alobi boye: “Na nsima, nabandaki kotya makanisi na makambo oyo nazalaki koyekola.”
Kobosana te ete likambo oyo esimbaki mpenza Lisa mpe Anne ezalaki ndenge bandeko ya lisangá bamoniselaki bango bolingo mpe motema boboto, mpe yango esalisaki bango bázala na mposa ya koyekola solo. Motema boboto oyo bandeko ya lisangá bamoniselaki bango esalisaki bango bándima solo.
MEKOLÁ NZAMBE MPE MONISELÁ BASUSU MOTEMA BOBOTO
Mbala mosusu bato mosusu balobaka mpe bamonisaka boboto mpo babɔkwamá bongo to ezali mimeseno ya mboka na bango. Ezali malamu kolendisa basusu bázala na bokonde to na botosi mpo na mimeseno to bomoto na bango. Kasi soki tolendisami kaka na mimeseno to bomoto na biso, mbala mosusu, tokoki te komekola motema boboto oyo euti na Nzambe.—Talá mpe Misala 28:2.
Motema boboto oyo euti na Nzambe ezali moko ya bizaleli ya mbuma ya elimo santu ya Nzambe. (Gal. 5:22, 23) Yango emonisi ete tosengeli na elimo santu ya Nzambe mpo esalisa biso tómonisa boboto ya solosolo. Yango eyokani na mposa oyo tozalaka na yango ya komekola Yehova mpe Yesu. Lisusu, lokola Yesu, totyelaka basusu likebi mpenza. Yango wana, kolinga Yehova mpe bazalani na biso nde etindaka biso tósala bongo. Na yango, motema boboto na biso ekómaka ezaleli moko ya nguya oyo eutaka na motema mpe ete Nzambe andimaka yango.
TOSENGELI KOMONISELA BANANI MOTEMA BOBOTO?
Ekoki kozala pɛtɛɛ komonisa boboto epai ya bato oyo basalelaka biso makambo na boboto to bato oyo toyebi. (2 Sa. 2:6) Tomonisaka yango ntango topesaka bango matɔndi. (Kol. 3:15) Kasi ezali boni soki tokanisi ete esengeli te komonisela moto moko boboto?
Tótalela likambo oyo: Yehova azali ndakisa moko monene na likambo etali komonisa boboto monene, mpe Liloba na ye oyo ekomami eteyaka biso liteya moko ya ntina mingi na likambo ya komonisa ezaleli yango. Maloba “boboto monene” esalelami mbala mingi na Makomami ya Grɛki ya bokristo. Ndenge nini Nzambe amoniselaka biso motema boboto?
Kanisá bamilio ya bato oyo Nzambe amoniselaka motema boboto ntango apesaka bango biloko oyo basengeli na yango mpo bázala na bomoi. (Mat. 5:45) Na yango, liboso kutu bato báyeba Yehova, amoniselaki bango motema boboto. (Ef. 2:4, 5, 8) Na ndakisa, apesaki bato nyonso eloko moko ya motuya mingi mpenza, elingi koloba, Mwana na ye se moko oyo abotamaki. Ntoma Paulo akomaki ete Yehova apesaki lisiko “na kolanda bomɛngo ya boboto monene na ye.” (Ef. 1:7) Lisusu, atako tosalaka masumu mpe toyokisaka Yehova mpasi na motema, azali kokoba kotambwisa biso mpe koteya biso. Malako mpe maloba na ye ezali lokola “mbula moke.” (Mib. 32:2) Mpo na koloba solo, tokoki te kofuta Yehova mpo na makambo nyonso ya boboto oyo amoniselaka biso. Lisusu, toyebi ete soki Yehova amoniselaka biso boboto monene na ye te, mbɛlɛ tozali na elikya te mpo na mikolo ezali koya.—Talá mpe 1 Petro 1:13.
Na ntembe te, motema boboto ya Yehova epesaka makasi mpe elendisaka. Na yango, na esika tóponaka baoyo tokomonisela motema boboto, tosengeli kosala makasi mpo na komekola Yehova ntango tozali kosala ete motema boboto ezala moko ya bizaleli na biso ya mokolo na mokolo. (1 Tes. 5:15) Ntango tomonisaka mbala nyonso motema boboto, tozalaka lokola mwa mɔtɔ na ntango ya malili. Na ntango yango, tokobɔndisa bandeko na biso ya libota, bandeko na biso bakristo, baninga na biso ya mosala, baninga na biso ya kelasi, mpe bato ya kartye.
Kanisá bandeko ya libota na yo mpe bandeko ya lisangá oyo bakozwa matomba na maloba mpe na misala na yo ya boboto. Ekoki kozala na moto moko na lisangá na bino, oyo mingimingi asengeli na lisalisi mpo na kobatela ndako, bilanga to kosunga ye na mosala mbala na mbala, na ndakisa, kosombela ye biloko? Longola yango, ntango okutani na moto moko na mosala ya kosakola oyo asengeli na lisalisi, okoki kosala eloko moko mpo na kosalisa ye?
Mpo na komekola Yehova, maloba na biso mpe misala na biso esengeli kotambwisama na “mobeko ya motema boboto.”
a Topesi bango bankombo mosusu.