MEKOLÁ KONDIMA NA BANGO | YOBO
Yehova abikisaki bampasi na ye
Nsukansuka, mibali yango nyonso bafandaki nyɛɛ. Mbala mosusu, kaka mwa makelele ya nsense ya mopɛpɛ oyo ezalaki kopɛpa na esobe ya Arabie nde ezalaki koyokana. Nsima ya kobendana na maloba ntango molai elongo na baninga na ye misato, Yobo azangaki maloba mpe asilaki makasi. Meká komona na makanisi ndenge azali kotala baninga na ye wana misato, Elifaze, Biledade, mpe Zofare na miso; azali kotala soki bazali lisusu na likambo ya koloba. Kasi batye kaka bilongi na nse to epai mosusu, basiliki ndenge maloba na bango ya bwanya, ‘oyo ezali se mopɛpɛ mpamba,’ mpe maloba mabe oyo balobeli Yobo esali ye eloko te. (Yobo 16:3) Ezala ndenge nini, Yobo azalaki na ekateli makasi ya kokɔtela bosembo na ye.
Yobo amonaki ete bosembo ezalaki eloko kaka moko oyo atikalaki na yango. Bomɛngo na ye nyonso esilaki, bana na ye nyonso zomi bakufaki, likebi mpe limemya oyo baninga mpe bato ya kartye na ye bazalaki kopesa ye ezalaki lisusu te mpe nsukansuka sante na ye moko mpe ebebaki. Maladi eyindisaki loposo na ye mpe loposo yango ezipamaki na bikókóto mpe na bankusu. Ata mpema na ye ekómaki nsolo mabe. (Yobo 7:5; 19:17; 30:30) Ata bongo, maloba mabe ya mibali yango misato esilikisaki Yobo. Azalaki na ekateli ya komonisa bango ete azalaki te moto mabe oyo bango bazalaki kokanisa. Maloba ya nsuka oyo Yobo alobaki ekangisaki bango minɔkɔ. Nsukansuka, bazangaki maloba ya kobakisa na ebele ya maloba mabe oyo balobelaki Yobo. Ata bongo, Yobo azalaki kaka na mpasi. Azalaki kaka na mposa ya lisalisi mpenza!
Tokoki kokamwa te soki Yobo atalelaki te mpasi na ye na ndenge ebongi. Azalaki na mposa ya litambwisi mpe kosembolama. Azalaki mpe na mposa ya libɔndisi ya solosolo, likambo mpenza oyo esengelaki baninga na ye wana misato básala yango, kasi basalaki yango te. Ekómelá yo naino te omona ete soki bapesaká yo litambwisi mpe libɔndisi te, mbɛlɛ oyikaki mpiko te na likambo moko oyo okutanaki na yango? Ekómelá yo naino te ete bato oyo ozalaki kokanisa ete bazali baninga na yo bálɛmbisa yo nzoto? Koyeba ndenge Yehova asalisaki mosaleli na ye Yobo, mpe ndenge Yobo asalaki ekosalisa yo okóma mpenza na elikya mpe ozwa lisalisi oyo ebongi.
Mopesi-toli ya boboto mpe ya bwanya
Na nsima, lisolo ya Yobo emonisi likambo moko oyo tokanisaki te. Ezalaki mpe na moto mosusu oyo azalaki pene wana, elenge mobali moko na nkombo Elihu. Azalaki wana banda kala, afandaki nyɛɛ mpe azalaki kolanda ndenge mikóló yango bazalaki kobendana na maloba. Mpe makambo ayokaki esepelisaki ye te.
Elihu asilikelaki Yobo. Amiyokaki mabe ndenge Yobo alukaki komibimisa sembo koleka Nzambe mpo na mbamba oyo baninga na ye wana misato batyaki ye. Ata bongo, Elihu amityaki mpenza na esika ya Yobo; amonaki mpasi oyo Yobo azalaki na yango, bosembo na ye mpe ndenge azalaki mpenza koluka bápesa ye toli na boboto mpe bábɔndisa ye. Yango wana Elihu akokaki lisusu kokanga motema te na maloba ya babɔndisi mabe wana misato! Ayokaki maloba mabe oyo balobaki na Yobo, ndenge balukaki kobebisa kondima, lokumu mpe bosembo na ye. Oyo eleki mabe mpenza, maloba na bango ya mbilingambilinga ebimisaki Nzambe moto mabe mpenza. Elihu akokaki kokanga lisusu monɔkɔ te!—Yobo 32:2-4, 18.
Alobaki boye: “Nazali elenge na mikolo mpe bino bozali mibange. Yango wana nazongaki nsima mpe nabangaki kolakisa bino boyebi na ngai.” Kasi akokaki lisusu kokanga monɔkɔ te. Abakisaki boye: “Ezali kaka te mpo bato bazali na mikolo mingi nde bazalaka bato ya bwanya, mpe ezali kaka te mpo bato bazali mibange nde bayebaka kosambisa makambo.” (Yobo 32:6, 9) Na nsima Elihu alobaki makambo mingi, oyo emonanaki ete ezali solo. Ndenge oyo alobaki na Yobo ekesanaki mpenza na oyo Elifaze, Biledade mpe Zofare balobaki. Elihu akitisaki Yobo motema ete akoloba te maloba oyo ekokitisa Yobo to oyo ekobakisela ye mpasi. Amemyaki mpe Yobo ndenge abengaki ye na nkombo mpe andimaki ete basalelaki ye makambo na kozanga limemya. * Na limemya nyonso, alobaki boye: “Ee Yobo, nabondeli yo, yoká maloba na ngai.”—Yobo 33:1, 7; 34:7.
Elihu apesaki Yobo toli oyo ya polele: “Olobaki na matoi na ngai, . . . ‘Nazali pɛto, nabuki mobeko ata moko te; nazali pɛɛ, mpe nazali na libunga te. Talá! Azali kozwa mabaku ya kotɛmɛla ngai.’” Elihu alobelaki mpenza likambo oyo Yobo azalaki na yango; atunaki boye: “Yango nde omoni ete ezali bosembo? Olobi: ‘Boyengebene na ngai eleki ya Nzambe.’” Akokaki te kotikela likanisi ya bongo nzela. Elenge mobali yango alobaki: “Talá! Na likambo oyo ozali na elonga te.” (Yobo 33:8-12; 35:2) Elihu ayebaki ete Yobo azalaki na nkanda mpenza ndenge abungisaki biloko na ye nyonso mpe ndenge baninga mabe wana banyokolaki ye. Kasi Elihu akebisaki Yobo boye: “Kebá noki nkanda ebenda yo obɛta mabɔkɔ na lityo.”—Yobo 36:18.
Elihu alobeli polele boboto ya Yehova
Oyo eleki nyonso, Elihu alobi mpo na kokɔtela Yehova Nzambe. Na maloba ya nguya kasi ya pɛtɛɛ, alimbolaki likambo moko ya ntina mpenza: “Nzambe ya solo akoki kosala mabe ata moke te, mpe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akoki ata moke te kosala makambo oyo ezangi bosembo! . . . Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ye moko abebisaka lisambisi te.” (Yobo 34:10, 12) Mpo na komonisa ete Yehova azali motema mawa mpe sembo, Elihu akundweli Yobo ete Yehova apesaki Yobo etumbu te mpo na bilobaloba na ye mpe maloba oyo ezangi limemya epai na ye. (Yobo 35:13-15) Lisusu, na esika amonisa ete ayebi nyonso, na komikitisa nyonso Elihu andimaki ete: “Nzambe atombwami koleka oyo biso tokoki koyeba.”—Yobo 36:26.
Atako apesaki toli ya polele, Elihu azalaki kaka na boboto. Alobelaki elikya moko kitoko, ete Yehova akozongisela Yobo sante na ye. Nzambe akoloba na mosaleli na ye ya sembo boye: “Mosuni na ye ekóma ya sika koleka oyo ya bolenge; azonga na mikolo oyo azalaki na makasi ya bolenge.” Likambo mosusu oyo emonisi ete Elihu azalaki na boboto, yango oyo: Na esika aloba kaka na Yobo oyo asengeli kosala, na boboto nyonso asɛngaki Yobo aloba mpe ayanola ye. Alobaki na ye boye: “Lobá, mpo nasepeli na boyengebene na yo.” (Yobo 33:25, 32) Kasi Yobo apesaki eyano te. Ekoki kozala amonaki te ntina ya komilongisa na toli wana ya boboto mpe ya kolendisa. Ekoki kozala Yobo alelaki ndenge amonaki ete Elihu akitisaki ye motema.
Tokoki kozwa mateya ya ntina mingi epai ya mibali wana mibale ya sembo. Ndakisa ya Elihu ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge ya kopesa toli mpe kobɔndisa baoyo basengeli na yango. Moninga ya solosolo akobanga te koyebisa yo bolɛmbu na yo to kokebisa yo na likambo moko oyo ekoki komema yo na likama. (Masese 27:6) Tokolinga kozala baninga na bango, kozala ntango nyonso na boboto mpe kolendisa baoyo bazali na bosɛnga, ata soki bakateli biso mangala. Mpe soki biso moko tozali na mposa ya toli, ndakisa ya Yobo elendisi biso tóyoka na komikitisa nyonso na esika ya koboya koyoka yango. Biso nyonso tozalaka na mposa bápesa biso toli mpe básembola biso. Kondima yango ekoki kobikisa bomoi na biso.—Masese 4:13.
“Na kati ya mopɛpɛ makasi”
Ntango Elihu azalaki koloba, azalaki kotánga mopɛpɛ, mapata, nkake mpe mikalikali mbala mingi. Alobaki boye mpo na Yehova: “Bóyoka na likebi lokito ya mongongo na ye.” Mwa moke na nsima Elihu alobelaki “mopɛpɛ makasi.” (Yobo 37:2, 9) Ekoki kozala ete ntango Elihu azalaki koloba, mopɛpɛ makasi ezalaki kopepa mpe ezalaki koya makasi mokemoke. Nsukansuka, ekómaki makasi mpenza. Na nsima, likambo moko ya nsɔmɔ esalemaki. Yehova azalaki koloba!—Yobo 38:1.
Kanisá libaku malamu oyo Yobo azwaki ya koyoka mateya etali bozalisi epai ya Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba!
Ntango ozali kotánga mokanda ya Yobo, ezali mpenza likambo ya kokitisa motema kokóma esika mikapo oyo kitoko ezali, epai Yehova azali koloba na Yobo. Ezali lokola mopɛpɛ makasi ya solo ezalaki kokɔmbɔla maloba ya mpambampamba, maloba nyonso ya lokuta oyo Elifaze, Biledade mpe Zofare balobaki. Yehova alobaki kutu te na mibali yango; alobaki na bango nde na nsima mpenza.y Likebi na ye ezalaki kaka epai ya Yobo; asembolaki mosaleli na ye wana oyo alingaka ndenge tata asembolaka mwana na ye.
Yehova ayebaki mpasi ya Yobo. Ayokelaki ye mawa, kaka ndenge tata ayokaka mawa ntango bana na ye oyo alingaka banyokwamaka. (Yisaya 63:9; Zekaria 2:8) Kasi ayebaki mpe ete Yobo azalaki koloba “maloba oyo ezangi boyebi,” mpe kosala bongo Yobo azalaki nde komibakisela mpasi lisusu. Yango wana, Yehova asembolaki Yobo ndenge atunaki ye ebele ya mituna. Abandaki boye: “Yo ozalaki wapi ntango natyaki moboko ya mabele? Yebisá ngai, soki oyebi eloko babengi mayele.” Na ebandeli ya bozalisi, “minzoto ya ntɔngɔ,” to baanzelu oyo bazali na libota ya Nzambe bagangaki na esengo ndenge Nzambe akelaki biloko ya kokamwa. (Yobo 38:2, 4, 7) Mpo na koloba solo, Yobo ayebaki ata likambo moko te mpo na yango.
Yehova alobelaki biloko oyo asalá. Na maloba mosusu, tokoki koloba ete Yehova alimbwelaki Yobo mwa moke oyo tobengaka lelo Siansi oyo elobelaka bozalisi; na ndakisa, astronomi, bioloji, geoloji mpe fiziki. Yehova alobelaki mpe mwa banyama oyo ezalaki esika Yobo azalaki kofanda, na ndakisa nkɔsi, yanganga, bantaba ya ngomba, zɛbrɛ, ngɔmbɛ-mobali, maligbanga, mpunda, kombekombe ya matɔnɔmatɔnɔ, mpongo, Behemote (to ngubu), mpe na nsuka Leviatana (to ngando). Kanisá ete ozali kolanda na kelasi mateya etali biloko lokola banzete to banyama epai ya Mokɛli ya molɔ́ngɔ́ mobimba! *
Liteya ya komikitisa mpe ya bolingo
Nyonso wana ezalaki mpo na nini? Yobo asengelaki kozala mpenza na komikitisa mingi. Yobo azalaki komilelalela ete Yehova nde azalaki kosalela ye makambo na bosembo te. Na kosala bongo, Yobo azalaki kobebisa boyokani na ye na Tata na ye ya bolingo, mpe yango esalaki ete likambo na ye ebeba se kobeba. Yango wana Yehova azalaki kotunatuna ye mituna soki azalaki wapi ntango azalaki kokela biloko ya kokamwa mpe soki Yobo akokaki koleisa, kobatela to kotambwisa banyama oyo akelá. Soki Yobo akokaki te kopekisa makambo ya mikemike oyo Yehova akelá, ndenge nini akokaki kozwa mpiko ya kosambisa Mozalisi? Makanisi ya Yehova mpe makambo oyo asalaka ekeseni mpenza na makanisi ya Yobo oyo ezali na mindelo, bongo te?
Yobo atyelaki Yehova ntembe te, mpe amilongisaki te
Makambo nyonso Yehova alobaki emonisaki ete azalaki kolinga Yobo mingi. Ezali lokola nde Yehova azalaki kososola na Yobo boye: ‘Mwana na ngai, soki nakoki kokela biloko nyonso wana mpe kotyela yango likebi, okanisi mpenza ete nakolonga te kotyela yo likebi? Nalingaki mpenza kosundola yo, kopimela yo bana, sante ya malamu mpe avenire malamu? Nazali te moto oyo akoki kozongisela yo biloko oyo obungisaki mpe kobikisa yo na bampasi makasi oyo ozali na yango?’
Yobo alobaki kaka mbala mibale ntango Yehova azalaki kotunatuna ye mituna mpo na kososola na ye. Yobo atyaki ntembe te mpe amilongisaki te. Na komikitisa nyonso, andimaki mpenza ete ayebi makambo mingi te mpe asɛngaki bolimbisi mpo na maloba oyo alobaki kozanga kokanisa. (Yobo 40:4, 5; 42:1-6) Awa tomoni ete Yobo azali ndakisa malamu na likambo etali komonisa kondima. Nsima ya makambo nyonso oyo ayikelaki mpiko, akobaki komonisa kondima makasi epai ya Yehova. Andimaki Yehova asembola ye mpe abongolaki makanisi na ye. Ndakisa na ye ekoki kotinda biso tómitalela mpe tómituna boye: ‘Nandimaka na komikitisa nyonso ete bápesa ngai toli to básembola ngai?’ Biso nyonso tozalaka na mposa ya lisalisi ya ndenge wana. Soki tondimi yango, tokomekola kondima ya Yobo.
“Bolobeli ngai na bosolo te”
Yehova ayebaki ete Yobo azalaki konyokwama, mpe asalaki likambo moko mpo na kobɔndisa ye. Yehova alobaki na Elifaze, oyo emonani lokola ye nde azalaki mokóló ya babɔndisi wana misato ya lokuta boye: “Nkanda na ngai epeleli yo ná baninga na yo mibale, mpo bolobeli ngai na bosolo te ndenge mosaleli na ngai Yobo alobi.” (Yobo 42:7) Kanisá maloba wana nyonso. Yehova azalaki nde koloba ete likambo nyonso oyo mibali wana misato balobaki ezalaki lokuta to liloba mokomoko oyo Yobo alobaki ezalaki solo? Soki moke te. * Kasi, ezalaki na bokeseni monene kati ya Yobo ná baninga na ye wana ya lokuta. Yobo azalaki konyokwama mpo na mpasi oyo ekómelaki ye mpe alɛmbaki nzoto mpo na lokuta oyo baninga na ye bafundaki ye. Na yango, toyebi sikoyo ntina oyo esalaki ete aloba maloba kozanga kokanisa na bantango mosusu. Kasi, Elifaze ná baninga na ye mibale bazalaki na mpasi moko te. Lolendo mpe kozanga kondima na bango nde etindaki bango báloba bongo. Balobaki mabe kaka te mpo na Yobo, kasi oyo eleki mabe, balobaki ete Yehova azali moto mabe oyo anyokolaka bato, mpe Nzambe moko ya makambo makasimakasi mpe azali mabe mingi!
Likambo ya kokamwa ezali te mpo Yehova asɛngaki na mibali misato yango bápesa mbeka moko ya motuya mingi: ngɔmbɛ ya mibali mibale mpe bampate nsambo ya mibali. Ezalaki likambo ya moke te, mpo toyebi ete na nsima na nse ya Mibeko ya Moize, ngɔmbɛ ya mobali ezalaki nyama oyo nganga-nzambe monene nde asengelaki kopesa lokola mbeka soki lisumu na ye ekomemisa ekólo mobimba ngambo. (Balevi 4:3) Ezalaki nyama oyo elekaki ntalo mingi na banyama oyo bazalaki kopesa mbeka na Mibeko ya Moize. Oyo eleki ntina, Yehova alobaki ete akondima mbeka ya baninga wana ya Yobo kaka soki Yobo abondeli naino mpo na bango. * (Yobo 42:8) Yango esengeli kokitisa Yobo motema mpe kobɔndisa ye na ndenge alongisaki Nzambe mpe amonaki ndenge bosembo ya Yehova elongaki!
“Mosaleli na ngai Yobo akobondela mpo na bino.”—Yobo 42:8
Yehova andimaki ete Yobo akosala ndenge asɛngaki ye asala. Yango ekomonisa ete Yobo alimbisaki mibali wana oyo bazokisaki ye mpenza na motema. Mpe Yobo ayokisaki Tata na ye nsɔni te. (Yobo 42:9) Koleka makambo oyo alobaki, botosi na ye emonisaki mpenza bosembo na ye. Yehova apambolaki Yobo mingi koleka mpo na botosi na ye.
“Bolingo mingi ya motema”
Yehova amonisaki “bolingo mingi ya motema” epai ya Yobo mpe ‘amoniselaki ye motema mawa.’ (Yakobo 5:11) Na ndenge nini? Yehova abikisaki ye na maladi na ye. Kanisá ndenge Yobo ayokaki ntango ayebaki ete mosuni na ye, kozanga ntembe, ekómaki “ya sika koleka oyo ya bolenge” ndenge Elihu asakolaki yango! Nsukansuka, bandeko na ye mpe baninga na ye bayaki epai na ye, bamityaki na esika na ye mpe bamemelaki ye makabo. Yehova abikisaki Yobo, apesaki ye biloko mingi koleka mbala mibale biloko oyo azalaki na yango liboso. Kasi ezali boni mpo na mpasi makasi oyo azalaki na yango ya kobungisa bana na ye na liwa? Yehova abɔndisaki Yobo ná mwasi na ye ntango apesaki bango bana zomi! Lisusu, Yehova asalaki likamwisi, mpe abakiselaki Yobo bomoi. Yobo aumelaki mbula 140 mpe amonaki bana na ye mpe bana ya bana na ye mabota minei. Totángi boye: “Nsukansuka, Yobo akufaki, anuni mpe atondi na mikolo.” (Yobo 42:10-17) Lisusu na Paradiso, Yobo ná mwasi na ye oyo alingaka mingi bakosepela komona lisusu libota na bango, ezala mpe bana zomi oyo Satana abomaki.—Yoane 5:28, 29.
Mpo na nini Yehova apambolaki Yobo mingi boye? Biblia elobi: “Boyoká nsango ya koyika mpiko ya Yobo.” (Yakobo 5:11) Soki tokanisi mikakatano oyo Yobo ayikelaki mpiko, tokomona ete mikakatano na ye eleki oyo ya biso. Maloba “koyika mpiko” emonisi biso ete Yobo alongaki kaka te komekama. Kasi ayikaki mpiko na kondima nyonso mpe bolingo oyo alingaki Yehova eninganaki te. Na esika asilika mpe akanga nkanda libela, andimaki kaka kolimbisa ata baoyo bapesaki ye mpasi na motema. Mpe atikaki soki moke te elikya na ye mpe eloko oyo ezali motuya mingi; elingi koloba bosembo na ye.—Yobo 27:5.
Biso nyonso tozalaka na mposa ya koyika mpiko. Toyebi ete Satana akoluka kolɛmbisa biso nzoto ndenge alɛmbisaki Yobo. Kasi soki toyiki mpiko na kondima nyonso, tokobi komikitisa, kondima kolimbisa basusu, tozwi bikateli ya kobatela bosembo na biso, biso mpe tokokangama na elikya na biso oyo ezali na motuya mingi. (Baebre 10:36) Soki totikali sembo lokola Yobo, tokosala ete Satana asilika makasi mpenza, kasi tokosepelisa nde Yehova mingi koleka!
^ par. 6 Elifaze, Biledade ná Zofare balobaki maloba mingi epai ya Yobo, na boye ete mikapo soki libwa mobimba etondi na maloba na bango; ata bongo, lisolo yango emonisi ata esika moko te babengaki Yobo na nkombo.
^ par. 14 Na bantango mosusu, Yehova asalelaka maloba ya polele, ya elilingi to masese mpo na kolobela makambo (Talá, na ndakisa, Yobo 41:1, 7, 8, 19-21). Ezala ndenge nini, Nzambe azalaki na mokano ya kosalisa Yobo akóma lisusu kotosa Mozalisi na ye mingi.
^ par. 18 Kutu, ntoma Paulo na nsima azongelaki maloba ya Elifaze oyo alobaki, azongelaki yango lokola nde ezali solo. (Yobo 5:13; 1 Bakorinti 3:19) Makambo oyo Elifaze alobaki ezalaki solo, kasi asalelaki yango mabe epai ya Yobo.
^ par. 19 Ezali na lisolo moko te emonisi ete basɛngaki Yobo apesa mbeka mpo na mwasi na ye.