MEKOLÁ KONDIMA NA BANGO | YOBO
“Nakotika bosembo na ngai te!”
Afandi na mabele, nzoto na ye, banda na motó tii na makolo, etondi na babibɔ. Meká komona ndenge akitisi motó, mapeka elɛmbi, azali ata na makasi te ya kobengana banzinzi oyo bazali kolanda ye. Afandi na putulu ya mɔtɔ mpo na komonisa mawa na ye, azali kokwanza babibɔ na ye na eteni ya libanga. Bato bazalaki komemya ye, kasi sikoyo bakómi kokima ye. Baninga, ba voisin mpe bandeko na ye basundolaki ye. Bato, ezala mpe bana, bazalaki kosɛka ye. Akanisaki ete Yehova, Nzambe na ye, apesaki ye mokɔngɔ, nzokande ezalaki bongo te.—Yobo 2:8; 19:18, 22.
Ezalaki Yobo. Nzambe alobaki mpo na ye ete: “Na mabele moto moko lokola ye azali te.” (Yobo 1:8) Bankama ya bambula na nsima, Yehova alobaki ete Yobo azali moto ya sembo.—Ezekiele 14:14, 20.
Ozali kokutana na minyoko mpe bampasi? Lisolo ya Yobo ekobɔndisa yo mpenza. Ekosalisa yo mpe oyeba ete mosaleli nyonso ya sembo ya Nzambe asengeli kozala na bosembo. Bato bamonisaka ete bazali sembo epai ya Nzambe ntango bakobaka kosala oyo ye alingi ata soki bakutani na mikakatano. Tózwa mateya na lisolo ya Yobo.
Oyo Yobo ayebaki te
Emonani ete mwa ntango nsima ya liwa ya Yobo, Moize, moto ya sembo, akomaki lisolo ya Yobo. Lokola atambwisamaki na elimo ya Nzambe, Moize ayebisaki makambo elekaki na mabele, oyo ekómelaki Yobo, mpe makambo oyo elekaki na likoló.
Na ebandeli ya lisolo, Yobo azalaki na bomoi ya malamu mpe ya esengo. Azalaki na bozwi, ayebanaki mingi mpe bazalaki komemya na mokili ya Usa, oyo mbala mosusu ezalaki na nɔrdi ya Arabie. Azalaki kopesa bato oyo bazangá mpe kobatela baoyo bazangi libateli. Yobo ná mwasi na ye babotaki bana zomi. Likambo eleki ntina, Yobo azalaki na boyokani malamu na Nzambe. Azalaki ntango nyonso koluka kosepelisa Yehova, kaka ndenge bandeko na ye Abrahame, Yisaka, Yakobo mpe Yozefe bazalaki kosala. Ndenge moko na bandeko na ye, Yobo azalaki nganga-nzambe na libota na ye, azalaki ntango nyonso kopesa bambeka mpo na bana na ye.—Yobo 1:1-5; 31:16-22.
Mbala moko lisolo ebongwani. Lisolo elobi makambo ezalaki kosalema na likoló, mpe eyebisi makambo oyo Yobo ayebi te. Baanzelu ya sembo ya Yehova bayanganaki liboso ya Nzambe; Satana, oyo azalaki anzelu-motomboki, mpe akɔtaki. Yehova ayebaki ete Satana azalaki kotyela bosembo ya Yobo ntembe, yango wana Nzambe ayebisaki Satana ete Yobo azali moto ya sembo. Satana ayanolaki: “Yobo abangi Nzambe nde mpamba? Yo otɛlɛmisi lopango te zingazinga na ye mpe zingazinga ya ndako na ye mpe zingazinga ya eloko nyonso oyo azali na yango epai na epai?” Satana ayinaka bato oyo babatelaka bosembo na bango. Ntango bato batikalaka sembo epai ya Yehova Nzambe, bamonisaka polele ete Satana azali moto mabe mpe alingaka moto moko te. Yango wana Satana alobaki ete Yobo asalelaka Nzambe kaka mpo na mapamboli oyo azwaka. Satana alobaki ete soki Yobo abungisi nyonso, akolakela Nzambe mabe!—Yobo 1:6-11.
Yobo akokaki koyeba yango te, kasi Yehova apesaki ye libaku ya komonisa ete Satana azali lokuta. Yehova apesaki Satana nzela ya kobɔtɔla Yobo nyonso azalaki na yango. Yehova apesaki Satana nzela te ya kosala Yobo mabe. Bongo Satana abandaki mosala na ye ya mabe. Kaka na mokolo moko, makambo ya mpasi ekómelaki Yobo. Bayebisaki ye ete bampunda, bampate, mpe bakamela na ye ebomamaki na mbalakaka. Lisusu, basaleli na ye oyo bazalaki kobatela banyama yango babomamaki. Momemi-nsango ayebisaki Yobo ete ezalaki “mɔtɔ ya Nzambe,” mbala mosusu mikalikali nde ebomaki bampate ná basaleli ya Yobo. Ntango Yobo azali koluka koyeba malamumalamu likambo ekómi mpe ndenge bato nyonso wana bakufi mpe ndenge atikali maboko mpamba, likambo mosusu ya mabe ekómaki. Bana na ye zomi bazalaki bango nyonso na ndako ya yaya na bango ntango na mbalakaka mopɛpɛ ya makasi ebɛtaki ndako yango, ebebisaki yango mpe bana nyonso bakufaki!—Yobo 1:12-19.
Mwaye tóyeba mpenza ndenge Yobo ayokaki ezali te. Apasolaki bilamba na ye, akataki nsuki na ye, mpe akweaki na mabele. Yobo alobaki ete Nzambe ye moko apesaki mpe Nzambe ye moko abɔtɔli. Kutu, Satana asalelaki mayele mabe mpo na komonisa ye ete Nzambe nde abimiseli ye bampasi wana. Kasi, Yobo alakelaki Nzambe mabe te ndenge Satana alobaki yango. Kutu, Yobo alobaki: “Nkombo ya Yehova ekoba kokumisama.”—Yobo 1:20-22.
“Akolakela yo mabe”
Satana asilikaki, mpe aboyaki kotika. Ayaki lisusu liboso ya Yehova, ntango Yehova abandaki kosala likita na baanzelu. Yehova akumisaki lisusu Yobo na ndenge abatelaki bosembo na ye, atako Satana anyokolaki ye. Satana alobaki: “Loposo mpo na loposo, mpe eloko nyonso oyo moto azali na yango akopesa mpo na molimo na ye. Mpo makambo ebongwana, nabondeli yo, sembolá lobɔkɔ na yo mpe simbá tii na mokuwa na ye mpe na mosuni na ye, bongo otala soki akolakela yo mabe te na miso na yo.” Satana andimaki ete soki Yobo abɛli maladi ya makasi, akolakela Nzambe mabe. Lokola Yehova ayebaki ete Yobo akotikala sembo, ayebisaki Satana abwakela ye maladi, kasi apesaki ye nzela te ya koboma Yobo.—Yobo 2:1-6.
Mbala moko Yobo akómi ndenge tolobi yango na ebandeli. Kanisá mpasi oyo mwasi na ye ayokaki! Azalaki na mawa makasi mpo bana na ye zomi bakufi, mpe sikoyo mobali na ye azali konyokwama mpenza mpe azali na likoki ya kosalisa ye te! Lokola atungisamaki mingi, agangaki: “Ozali naino kokangama makasi na bosembo na yo? Lakelá Nzambe mabe mpe kufá!” Ezali likambo oyo mwasi ya Yobo akokaki koloba te. Yobo amonaki ete alobaki bongo mpo abulunganaki na makanisi. Kasi, Yobo aboyaki kolakela Nzambe mabe. Asalaki lisumu na maloba na ye te.—Yobo 2:7-10.
Oyebi ete lisolo oyo ya mawa, oyo esalemá, etali mpe yo? Yebá ete Satana afundaki kaka Yobo te, kasi mpe bato nyonso. Alobaki: “Eloko nyonso oyo moto azali na yango akopesa mpo na molimo na ye.” Na maloba mosusu, Satana alobi ete moto akoki soki moke te kotikala sembo epai ya Nzambe! Alobi mpe ete bolingo oyo olingaka Yehova ezali ya lokuta, okopesa Nzambe mokɔngɔ mpo na kobikisa bomoi na yo. Kutu, Satana alobi ete olukaka kaka matomba na yo moko, lokola ye! Olingi komonisa ete azali lokuta? Mokomoko na biso azali na libaku ya kosala yango. (Masese 27:11) Tólobela sikoyo mokakatano mosusu Yobo akutanaki na yango.
Babɔndisi ya mabe
Mibale misato oyo bayebaki Yobo, Biblia ebengi bango baninga na ye, bayokaki makambo ya mpasi oyo ekómelaki Yobo mpe basalaki mobembo mpo na koya kotala ye mpe kobɔndisa ye. Ntango bamonaki ye na mosika, bayebaki ye lisusu te. Yobo azalaki na mpasi makasi, mposo ya nzoto na ye ekómaki moindo, yango wana bayebaki ye lisusu te. Mibali yango misato, Elifaze, Biledade, mpe Zofare, bayokaki mawa, balelaki makasi mpe babwakaki putulu ya mabele na mitó na bango. Na nsima bafandaki na mabele pene na Yobo mpe balobaki ata liloba moko te. Bafandaki bongo pɔsɔ mobimba, butu moi, kozanga koloba. Mibali yango misato bafandaki nyɛɛ te mpo bazalaki koluka kobɔndisa Yobo. Toyebi yango mpo batyelaki Yobo likebi te mpo na koyeba ndenge makambo elekaki. Bayebaki kaka ete Yobo azalaki na mpasi, yango ezalaki mpe komonana na kotala mpamba.—Yobo 2:11-13; 30:30.
Nsukansuka, Yobo abandaki koloba. Amonisaki mpasi oyo azali koyoka, mpe alakelaki mokolo ya mbotama na ye mabe. Amonisaki ntina monene ya mpasi na ye. Akanisaki ete Nzambe nde abimiselaki ye bampasi wana! (Yobo 3:1, 2, 23) Atako azalaki kaka moto ya kondima, Yobo azalaki mpenza na mposa bábɔndisa ye. Kasi ntango mibali yango babandaki koloba, Yobo amonaki ete ebongaki bafanda nyɛɛ.—Yobo 13:5.
Elifaze, mbala mosusu ye nde azalaki mokóló, ezala mpe ya Yobo, abandaki koloba. Na nsima, Biledade mpe Zofare balobaki. Tokoki koloba ete basalaki bozoba ndenge balandaki makanisi ya Elifaze. Makambo mosusu oyo mibali yango balobi ekoki komonana mabe te, mpo ezali makambo oyo bato mingi balobaka mpo na Nzambe mpe emonanaka malamu, na ndakisa Nzambe azali mosika mpenza, apesaka etumbu na bato mabe mpe apesaka mbano na bato malamu. Banda ebandeli maloba na bango emonisaki ete bazalaki mpenza na boboto te. Elifaze alobaki makambo oyo ezalaki komonana lokola ezali malamu ete soki Nzambe azali malamu mpe apesaka bato mabe etumbu, mpe emonani ete Yobo azwi etumbu, yango emonisi nini? Boye, Yobo asali nde likambo ya mabe?—Yobo 4:1, 7, 8; 5:3-6.
Tokoki kokamwa te ndenge Yobo andimaki te makanisi wana. Aboyaki yango mpenza. (Yobo 6:25) Kasi mibali yango misato balukaki kondimisa Yobo ete asali lisumu mpe azali koluka kobomba yango; makambo nyonso ya mabe oyo ezali kokómela ye ezali mpo ye moko nde aluki yango. Elifaze afundi Yobo ete azali lofundo, azali moto mabe, mpe abangaka Nzambe te. (Yobo 15:4, 7-9, 20-24; 22:6-11) Zofare ayebisaki Yobo ete asengeli kotika kosala mabe mpe masumu. (Yobo 11:2, 3, 14; 20:5, 12, 13) Biledade alobaki mabe mpenza. Alobaki ete bana ya Yobo basalaki masumu, yango wana bakufaki!—Yobo 8:4, 13.
Atikali sembo atako basali ye mabe!
Mibali wana misato oyo bazalaki na libunga, basali lisusu likambo ya mabe koleka. Balobi ete Yobo azali sembo te epai ya Nzambe, mpe ete ezali na ntina te kozala sembo epai ya Nzambe. Na maloba na ye ya ebandeli, Elifaze alobi ndenge abangaki ntango akutanaki na elimo moko. Mpo na kosukisa Elifaze amonisaki mpenza makanisi ya Satana ntango alobaki: Nzambe “andimelaka basaleli na ye te, mpe alobaka ete bamemi-nsango [baanzelu] na ye bazali na mbeba.” Soki tolandi makanisi na ye, elingi koloba ete moto moko te akoki kosepelisa Nzambe! Na nsima, Biledade alobaki ete bosembo ya Yobo ezali na ntina te na miso ya Nzambe; kaka ndenge akipaka te bosembo ya nkusu.—Yobo 4:12-18; 15:15; 22:2, 3; 25:4-6.
Ekómela yo obɔndisa moto moko oyo azali na mpasi makasi? Ezalaka pɛtɛɛ te. Kasi tokoki kozwa mateya mingi na batoli ya mabe oyo baninga na ye bapesaki ye, mingimingi makambo oyo tosengeli te koloba. Mibali yango misato balobaki makambo mingi oyo emonanaki lokola ezali malamu, kasi bamoniselaki Yobo boboto te mpe batikalaki kobenga ye te na nkombo na ye. Mpasi ya Yobo etalaki bango te mpe bakanisaki te ete basengeli komonisela Yobo boboto. * Soki moto moko azali na mawa, moniselá ye bolingo, tyelá ye likebi mpe zalá na boboto. Luká kosalisa moto yango akóma na kondima makasi mpe lendisá ye, salisá ye atyela Nzambe motema mpe andima ete Nzambe azali na boboto mingi, na motema mawa mpe na bosembo. Soki baninga ya Yobo bazalaki na esika ya Yobo, alingaki kobɔndisa bango. (Yobo 16:4, 5) Yobo asalaki nini ntango baninga na ye babɛtelaki bosembo na ye ntembe?
Yobo atikali sembo
Yobo azalaki konyokwama na makanisi ntango lisolo wana ya molai ebandaki. Banda na ebandeli, makambo mosusu oyo azalaki koloba ezalaki kaka “bilobaloba mpamba” mpe “maloba ya moto oyo azangi elikya.” (Yobo 6:3, 26) Toyebi ntina. Alobi maloba ya bongo mpo azalaki mpenza na mpasi na motema. Ezalaki mpe mpo ayebaki te nini ezali kokóma. Lokola makambo ya mabe oyo ekómelaki ye ná libota ná ye eyaki na mbalakaka mpe emonanaki lokola bilimo nde ezali na nsima, Yobo alobaki ete Yehova nde abimiseli ye yango. Ezalaki na makambo mingi ya ntina oyo Yobo ayebaki te, yango wana makanisi na ye ezalaki ya libunga.
Kasi, Yobo azalaki na kondima makasi. Kondima na ye emonanaki na makambo alobaki: maloba ya solo, ya kitoko mpe oyo ezali kolendisa biso lelo oyo. Ntango alobelaki biloko oyo Nzambe akelá, alobelaki yango na ndenge oyo moto moko te akoki kolobela yango soki Nzambe ayebisi ye te. Na ndakisa, alobaki ete Yehova “akakisi mabele na eloko moko te,” likambo oyo bato ya siansi bayaki koyeba bankama ya mbula na nsima. * (Yobo 26:7) Ntango alobelaki elikya oyo azali na yango mpo na mikolo ekoya, ezalaki mpe elikya oyo bato mosusu ya sembo bazalaki na yango. Yobo andimaki ete soki akufi, Nzambe akobosana ye te, akokanisa ye, mpe nsukansuka akozongisa ye na bomoi.—Yobo 14:13-15; Baebre 11:17-19, 35.
Kasi, bosembo ezali mpenza na ntina? Elifaze mpe baninga na ye mibale balobaki ete bosembo ya moto ezali na ntina te na miso ya Nzambe. Yobo andimaki yango? Te! Yobo alobaki ete bosembo ezali na ntina na miso ya Nzambe. Alobaki ete Yehova “akoyeba bosembo na ngai.” (Yobo 31:6) Lisusu, Yobo amonaki polele ete maloba mabe ya baninga na ye ezalaki mpo na kolɛmbisa bosembo na ye. Yango etindaki Yobo aloba mingi, mpe maloba na ye ebongaki mpenza, kutu baninga na ye bazangaki makambo ya koloba.
Yobo amonaki ete asengelaki komonisa bosembo mokolo na mokolo. Yango wana alimbolaki ntina oyo azalaki sembo na makambo nyonso asalaki. Na ndakisa, aboyaki losambo ya bikeko; abandaki komonisela basusu boboto mpe limemya; azalaki pɛto na makanisi, kolinga mwasi na ye; oyo eleki ntina, atikalaki sembo epai ya Nzambe kaka moko ya solo, Yehova. Yango wana, Yobo akokaki koloba na motema mobimba: “Kino nakokufa, nakotika bosembo na ngai te!”—Yobo 27:5; 31:1, 2, 9-11, 16-18, 26-28.
Mekolá kondima ya Yobo
Lokola Yobo, yo mpe omonaka ete bosembo ezali na ntina? Yobo amonaki ete esengeli kaka kosuka te na koloba ete tozali sembo, kasi tosengeli komonisa yango na misala. Tokomonisa ete tolingi Nzambe na motema mobimba soki tozali kotosa mpe kosala oyo ezali malamu na miso na ye mikolo nyonso ya bomoi na biso, ata na ntango ya mikakatano. Soki tosali bongo mpe tomekoli Yobo, Yehova akosepela mpe monguna na ye, Satana, akosilika. Yango lolenge oyo eleki malamu ya komekola Yobo!
Kasi, lisolo ya Yobo esili naino te. Abosanaki likambo ya ntina mpenza, alukaki komonisa ete azali moyengebene mpe apesaki Nzambe lokumu te. Esengelaki básembola ye mpe básalisa ye amona makambo ndenge Nzambe amonaka. Azalaki kaka na mpasi mpe na mawa makasi, azalaki na mposa ya libɔndisi. Yehova asalaki nini mpo na moto yango ya kondima mpe ya sembo? Lisolo mosusu ekopesa biyano na mituna yango.
^ par. 17 Kasi likambo ya kokamwa, Elifaze ná baninga na ye bakanisaki ete bamoniselaki Yobo boboto ntango bazalaki koloba na ye, mbala mosusu mpo batombolaki mingongo na bango te. (Yobo 15:11) Kasi ata soki tolobi na mongongo ya nse, maloba na biso ekoki kozala mabe mpe kozokisa.
^ par. 19 Ndenge toyebi yango, ezalaki nsima ya mbula soki 3 000 nde bato ya siansi bamonisaki ete ezali na ntina te mabele efanda likoló ya eloko moko boye. Ezalaki kaka ntango bakangaki bafoto ya molɔ́ngɔ́ nde bato nyonso bamonaki ete maloba ya Yobo ezali solo.